Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye : — Yebisa biso makambo yango.
Elize alobaki na Geazi : — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.