38 Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.
Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako ; ayaki na lombangu mpe alobaki : — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala ? Loba na ye ete asunga ngai !
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »