Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:37 - Mokanda na Bomoi

37 Molakisi ya mibeko azongisaki : — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye : — Kende mpe sala bongo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:37
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.


Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Yesu atunaki : — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi ?


Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ