Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:34 - Mokanda na Bomoi

34 apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:34
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye.


Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.


Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye.


Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.


Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,


Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa ! »


Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.


Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »


Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ