Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:33 - Mokanda na Bomoi

33 Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:33
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.


Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. »


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.


Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »


Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.


apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.


Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !


Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—


Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ