Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:32 - Mokanda na Bomoi

32 Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:32
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele ; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?


Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.


Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,


Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : — Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !


Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe babetaki ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba.


bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu ; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ