Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:30 - Mokanda na Bomoi

30 Yesu azongisaki : — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:30
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi mpe nakomi pene ya kokufa.


Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni, mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato oyo bazoka bapota ya somo.


Bazalaki koloba na bamama na bango : « Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino ? » Ndenge bazalaki kokweya-kweya lokola bato oyo bazoki bapota minene na babalabala ya engumba, ndenge wana mpe bazalaki kokufa na maboko ya bamama na bango.


Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.


Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.


Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.


Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ