Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ?
Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
Pamba te soki libula ezwami na nzela ya Mobeko, wana elaka ezali lisusu na esika te. Nzokande ezali penza na nzela ya elaka nde Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Abrayami.