Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango, mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.


Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.


Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi.


Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.


Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta : bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.


Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.


Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.


Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.


pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ;


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.


Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.


Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ