Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.
bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.