Luka 10:15 - Mokanda na Bomoi15 Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.
Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »
Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo.