Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:80 - Mokanda na Bomoi

80 Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:80
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?


Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.


Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.


Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani ; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.


pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.


Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ