Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.


Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe.


Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.


Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki.


Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.


Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.


Bakabolaki mpe Banganga-Nzambe kolanda milongo na bango, mpe Balevi kolanda masanga na bango mpo na mosala ya Nzambe kati na Yelusalemi, ndenge ekomama kati na buku ya Moyize.


Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.


Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;


Nakobulisa Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo ; nakobulisa lisusu Aron mpe bana na ye ya mibali mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.


Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.


Okopakola Aron mpe bana na ye ya mibali mafuta mpe okobulisa bango mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.


Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »


Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron.


Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ