nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.
Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?
Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.
Okoyebisa ye maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali : Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe.
‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.