Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:69 - Mokanda na Bomoi

69 abimiseli biso Mobikisi ya nguya, kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:69
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.


mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.


Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te ; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. »


basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.


Solo, nazali kotatola yango : « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »


Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.


Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :


Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.


Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ