Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:65 - Mokanda na Bomoi

65 Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:65
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi


Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki.


Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! »


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.


Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa.


Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »


Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ