Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:64 - Mokanda na Bomoi

64 Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:64
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.


Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?


Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai !


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »


Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.


Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !


Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ