Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:58 - Mokanda na Bomoi

58 Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:58
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa.


Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »


Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !


Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !


Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye,


Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »


Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali.


Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ