Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?
Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron.