54 Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, abosani te kotalisa boboto na Ye,
Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.
« Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ; oh Isalaele, nakobosana yo te.
Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki : « Nalingaka bino na bolingo ya seko ; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.
Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.
ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso, epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye, mpo na tango nyonso.