Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:53 - Mokanda na Bomoi

53 Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:53
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.


Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.


Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango ; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te.


Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !


Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, abosani te kotalisa boboto na Ye,


Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda ! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka !


Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !


Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.


Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu !


Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te ! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino !


Bato oyo bazalaki na bozwi ebele bakomi koluka mosala mpo na bilei, kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ