Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:50 - Mokanda na Bomoi

50 Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:50
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.


Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. »


Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye ;


Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.


Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.


kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.


Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.


Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe ; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule.


Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki : « Bokumisa Nzambe na biso ; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ