Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:47 - Mokanda na Bomoi

47 mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:47
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.


Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo.


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto kolanda mokano ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ntoma ya Yesu-Klisto, elikya na biso ;


Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,


mpe atalisi sik’oyo polele na nzela ya Liloba na Ye, oyo napesamelaki mokumba ya kosakola, kolanda etinda ya Nzambe, Mobikisi na biso, na tango oyo Ye akata ;


mpe bayibaka te. Kasi teya bango ete bamilakisaka tango nyonso lokola bato oyo bankolo na bango bakoki kotiela mitema, mpo ete bakomisa malakisi ya Nzambe Mobikisi na biso elengi.


wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ