Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:41 - Mokanda na Bomoi

41 Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:41
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki : « Likambo nini oyo ekomeli ngai ? » Boye, akendeki kotuna Yawe.


Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai, obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote.


mpe agangaki na mongongo makasi : — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo !


Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai.


Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola :


Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango : — Bakonzi mpe bakambi ya bato !


Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.


Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako ; atielaki Saulo maboko na koloba : — Ndeko na ngai, Saulo ; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ