4 mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki.
batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo ?
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Bateyaki ye nzela ya Nkolo ; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.
oyebi mokano ya Nzambe mpe oyebi kososola makambo oyo eleki malamu, pamba te Mobeko eteya yo.
Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.
Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.