Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:37 - Mokanda na Bomoi

37 Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:37
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.


Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino.


Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi, boleki ngai na eloko moko te.


Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.


« Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ?


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yawe alobaki na Moyize : — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.


Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !


Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.


Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba.


Mari azongiselaki ye : — Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai ! Bongo anjelu akabwanaki na ye.


Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ