Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:30 - Mokanda na Bomoi

30 Kasi anjelu alobaki na ye : — Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:30
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.


Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.


Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !


Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.


Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Boye tokoki koloba na elikya nyonso : « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ