25 Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »
akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
Na mokolo wana, basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba : « Tokomileisa biso moko mpe tokomilatisa biso moko ; yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo ! Longola soni na biso ! »
Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.