24 Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano.
Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.
Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.
Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »
Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron.
Teofile : Kati na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli