Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:22
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.


Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule.


Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.


Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana.


Simona Petelo afinaki ye miso mpo na kosenga na ye ete atuna Yesu soki azali koloba bongo na tina na nani.


Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.


Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.


Sima na mokonzi ya basoda kopesa ye nzela, Polo atelemaki na binyatelo mpe atombolaki loboko. Bato batikaki makelele, mpe Polo akomaki koloba na bango na lokota ya Arami :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ