Luka 1:17 - Mokanda na Bomoi17 mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.