Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:16
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata ; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.


Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela


Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ