Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 1:13
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.


Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.


Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.


Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !


Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.


Nakendeki epai ya mwasi mosakoli ; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai : « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz.


Akobaki koloba na ngai : — Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.


Yawe alobaki na ye : — Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele.


Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze : — Pesa ye kombo Lo-Rukama, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !


Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.


Kasi alobaki na bango : — Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.


Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye,


Kasi anjelu alobaki na ye : — Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu !


Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi.


mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola.


Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te.


Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ