11 Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa.
Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te.
Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.
Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
Kasi anjelu alobaki na bango : — Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi.
Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi.
Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :
Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.
Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe.
Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.
Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.