Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 Alobaki na Aron : « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba ; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 9:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;


Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai :


Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.


Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.


Tala ndenge Aron akobanda kokota na Esika ya bule : akomema ngombe moko ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.


Aron akozwa kati na lisanga ya bana ya Isalaele : bantaba mibale ya mibali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.


‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.


Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu ; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango.


Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.


Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba,


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Yango wana, likolo ya bolembu yango, asengeli kaka te kobonzaka mbeka mpo na masumu ya bato, kasi asengeli mpe kobonzaka yango mpo na masumu na ye moko.


azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ