18 Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato ; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo.
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.