Levitike 9:17 - Mokanda na Bomoi17 Amemaki mpe likabo ya bambuma, atondisaki yango na loboko na ye mpe atumbaki yango na etumbelo elongo na mbeka ya kotumba ya tongo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.