Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo ; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso.