13 Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo.
Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.
Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
Asukolaki biloko ya kati mpe makolo, atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba.