11 Atumbaki na moto mosuni mpe poso na libanda ya molako.
Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe. ’
Kasi atumbaki na libanda ya molako ngombe yango ya mobali, poso na yango, misuni na yango mpe nyei na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Atumbaki na etumbelo : mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.