Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.
Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.