Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;
Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.
Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu ; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele.
Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki.
Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye ; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe.
Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.
Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.