Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 8:33 - Mokanda na Bomoi

33 Mikolo sambo, bokolongwa te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani kino mikolo ya libulisi na bino ekokoka, pamba te libulisi na bino ekowumela mikolo sambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 8:33
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule.


Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.


Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.


Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.


Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino.


Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto ; soki te, akozala kaka mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ