Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 8:3 - Mokanda na Bomoi

3 mpe sangisa lisanga mobimba na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 8:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.


Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango.


Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale : bazalaki penza ebele ya bato.


Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale.


Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo.


Bongo Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota nyonso ya bato ya Isalaele, mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.


Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.


Bato nyonso basanganaki lokola moto moko na libanda, liboso ya Ekuke ya Mayi. Balobaki na Esidrasi, molakisi ya Mobeko, ete abimisa buku ya Mobeko ya Moyize, oyo Yawe apesaki bana ya Isalaele.


Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.


Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala ya kopetola akotia ye elongo na makabo na ye liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


« Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ;


Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe lisanga esanganaki na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


« Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »


Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize : « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. »


Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele.


Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ