27 Atiaki biloko yango nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo ayebisaki bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe.
Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; akotombola yango liboso ya Yawe.
Moyize azwaki yango lisusu na maboko na bango mpe atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. Ezalaki mbeka ya libulisi, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.