11 Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango.
Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango.
Sima, Yawe alobaki na ye lisusu : — Tia loboko na yo na tolo na yo. Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe.
ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.
Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe.