Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.
Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;
Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.
oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.
« Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ;