Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:37 - Mokanda na Bomoi

37 Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:37
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;


Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.


Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani :


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule.


Bongo amemaki meme mosusu ya mobali mpo na libulisi ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.


Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ