Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:34 - Mokanda na Bomoi

34 Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:34
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ; ekozala eteni na yo.


Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.


Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe.


Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende.


Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe.


Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka : lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ