Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:26 - Mokanda na Bomoi

26 Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:26
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.


Bokozala bule mpo na Ngai : bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba ; bosengeli kopesa yango na bambwa.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !


Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye.


Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › »


Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino.


Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


Kasi bosengeli te kolia makila ; bosopa yango lokola mayi na mabele.


Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama.


Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi.


Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ